Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.