22 Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya,
Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo : — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.
Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.
Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.
Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?
Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?