Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 kolanda ndenge ekomama : « Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 1:19
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala ? »


Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.


Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »


Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.


Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?


Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama : « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango ; »


Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama !


Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ