Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 1:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Apolosi ; » mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Petelo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Klisto. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 1:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.


Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.


Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »


Moyuda moko ayaki na Efeso, kombo na ye ezalaki « Apolosi. » Abotamaki na Alekizandri, ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino.


Amonanaki epai ya Petelo ; sima, epai ya bantoma zomi na mibale.


Bandeko na ngai, nazali koyebisa bino ete nzoto ya mosuni mpe makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe oyo epolaka ekoki te kosangana na oyo epolaka te.


Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.


Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.


Bandeko na ngai, nazali koloba boye : tango ekomi moke ; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te ;


Tozangi makoki ya kotambola elongo na mwasi moklisto, ndenge bantoma mosusu mpe bandeko ya Nkolo mpe Petelo basalaka ?


Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.


Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ