10 Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka.
Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.
Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo : Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.
pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.