Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
kati na mabondeli na ngai tango nyonso ; mpe nasengaka na Nzambe ete, na mikolo oyo to na mikolo oyo ekoya, apesa ngai nzela ya koya kotala bino, soki ezali mokano na Ye.
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :
Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.