Matthieu 1 - Mina ma Nzambe 1947Milolongi ma Jésus Christ. Bobotibe ba Jésus Christ. 1 Mokanda ma milolongi ma Jésus Christ, mwan’a bole a David, mwan’a bole a Abraham. 2 Abraham abotaki Isaac, Isaac abotaki Jacob, Jacob abotaki Juda na banyango baphele ba wango. 3 Juda na mwachi a wango Thamar babotaki Pharez na Zara. Pharez abotaki Esrom, Esrom abotaki Aram, 4 Aram abotaki Aminadab, Aminadab abotaki Naasson, Naasson abotaki Salmon. 5 Salmon na mwachi a wango Rahab babotaki Booz, Booz na Ruth babotaki Obed, Obed abotaki Jessé. 6 Jesse abotaki mokonchi David, David na mwachi, abeki mwachi a Urie bocho, babotaki Salomon. 7 Salomon abotaki Roboam, Roboam abotaki Abia, Abia abotaki Asa. 8 Asa abotaki Josaphat, Josaphat abotaki Joram, Joram abotaki Hosias, 9 Hosias abotaki Jonatham, Jonatham abotaki Achas, Achas abotaki Ezechias. 10 Ezechias abotaki Manassé, Manassé abotaki Josias, 11 Josias abotaki Joakim, Joakim abotaki Jéchonias na banyango ba baphele ba wango, bobiko, bwango bango bakieki o Babylone. 12 Okomo bango bapholaki o Babylone Jéchonias abotaki Salathiel, Salathiel abotaki Zorobabel. 13 Zorobabel abotaki Abiud, Abiud abotaki Eliakim, Eliakim abotaki Azor. 14 Azor abotaki Sadoc, Sadoc abotaki Achim, Achim abotaki Eliud. 15 Eliud abotaki Eléazar, Eléazar abotaki Matthan, Matthan abotaki Jacob, 16 na Jacob abotaki Joseph, molomi a Marie, na Marie abotaki Jésus, atangibe Christ. 17 Kobona edi milolongi dyomu na minè o ma Abraham kokoko ncho David, o ma David kokoko ncho bango bakièki o Babylone milolongi dyomu na minè; o bango bapholaki o Babylone kokoko ncho Christ milolongi dyomu na minè. 18 Bobotibe ba Jésus Christ bobèki kobona: O Joseph abèki achaka ayange Marie moyanga, Marie akoloki dyemu a Eyaye Echwa, wango ach’oya o mabòkoò ma Joseph ka. 19 Ko, Joseph, molomi a wango, abèki moto monyòngò, abodinga bochanche wango ka, ko, wango achimunyaki bwe, atike wango o yiche. 20 O wango abèki na bichimunye kobona, kieka, angelo a Nzambe adikizaki nchoto na Joseph, mwan’a bole a David, o moloti, alobaki bwe: ”Totilake bokwe Marie, mwachi a kò o ma kò, tonga mwe, mwango wango akolaki edi dyemu a Eyaye Echwa. 21 Na wango tabota mwan’a bole, ko tokana kombo a wango: Jésus, tonga wango taphakola bato ba wango o machuma ma bango.” 22 Ko, beka bi bitubanaki tonga n’ichiliza mawò ma Nzambe, mawò malobibaki na mobandi ma wango, molobaki bwe: 23 ”Kieka, ndènga tadyala na dyemu, na wango tabota mwan’a bole, Na bango takana kombo a wango: Emmanuel, Bochekola mawò: Nzambe adi na banga.” 24 O Joseph awumwaki a bilò, wango akielaki ko angelo a Nzambe abèki mokomandi bona, na wango akwaki mwatò, akambaki wango o ndako a wango. 25 Ko, Joseph abochangana tange na Marie ka, kokoko ncho Marie abèki abota mwan’a bole a wango a bocho, akanaki kombo a wango Jésus. |
Published in 1947, by Örebromissionen, now part of the Evangelical Free Church of Sweden (Evangeliska Frikyrkan).
British & Foreign Bible Society