Marc 5 - Mina ma Nzambe 1947Jésus etubize eyaye a Molemba, abelize mwato a bokono ba malongo, awumuze mwan’a mwatò a Jaïrus. 1 Bango bapholaki ngolo a Gadaréniens o bili b’èdiba. 2 O wango atubaki o bwato moto a eyaye a mbindo ayakaki ma wango dyolo, achònòki o mandemba. 3 Enongo a wango idyala ebèki mandemba. Baboyicha bokange wango na mangièngèlè dyòkò ka. 4 Tonga bakangaki wango na mangièngèlè ma makolo nà na mana mangièngèlè makanga makama, ko wango akiènizaki mangièngèlè n’abunyaki mangièngèlè ma makolo, na moto nyò mò abèki dyo chwa ikolo na wango twa. 5 Na wango abikaki na mièche na mikolo o phanyak’a mandemba, n’ikolo na makoli, angamwaki n’akonchizaki nchoto na maboko. 6 O wango ayènèki Jésus na monge ikanga, wango angunchwaki, ayakaki o ma wango, akuchamaki o bocho ba wango, 7 angamwaki nikichi, alobaki bwe: ”K’òdi n’iwò ikiela na nga, kombo nda? Jésus Mwan’a bole a Nzambe, koncha wango eleki bonè. Nga dyènge Nzambe na kò bwe, tòchèbizake nga.” 8 Jésus abèki mboli n’iloba na wango bwe: ”Tuba o cha moto kò, eyaye a mbindo.” 9 Jésus ayangaki wango bwe: ”Kombo a kò nda?” Wango ayambolaki wango bwe: ”Kombo a nga edi: Légion, tonga banga bodi bokama. 10 Na wango ayongaki wango titingi bwe, tòmichake bango o enongo ye! 11 Ikanda a bangoya ibidye mboli na bokoli bwango. 12 Biyaye bibè biyongaki wango bwe: ”Tinda banga o cha bangoya, tika banga bokole o cha bangoya.” 13 Na wango achimitaki byango iwò dyango. Komoyango biyaye ba mbindo bikièki, bikolaki o cha bangoya. Ikanda a bangoya ichò ibungatanaki o bokoli na ikwabanaki ediba na iwaki o ediba. 14 Ko babateli ba bangoya babanganaki, bachakolaki iwò di o mboka n’o ngolo; na bato bakièki tonga n’iyènè eyeka yango etubanaki. 15 O bango bapholaki o ma Jésus, bango bayènèki moto wango abèki n’èyaye a Molemba o cha mwè, adyaki bwa ondo, achwaki bilamba na abèki na bolengi bochò, ebèki tètè koncha ebèki na légion o cha mwè, na bango babèki n’ichimo. 16 Bakoncha bango bayènèki edyalele yango, bachakolaki bango beka byango bitaki na moto wango abèki na biyaye ba Molemba, na beka byango bitaki na bangoya. 17 Komoyango bato bayongaki Jésus bwe, alangwe echoko a bango. 18 Chima o Jésus akolaki o bwato, koncha wango ebèki n’èyaye a Molemba, ayongaki Jésus bwe, alòndò wango. 19 Ko Jésus abochimita wango ka, ko wango alobaki na wango bwe: ”Kiè o ndako a kò ma banyango ba kò, ochakola bango matoma mananè mango Mokonchi mokielaki na kò, ko mwango modikizaki kò elumba bona. 20 Na wango akièki, ayèchakola o Décapole matoma mananè mango Jésus akielaki na wango. Na bato bachò babèki n’ichimo. 21 O Jésus akiènanaki o bwato, o wango apholaki o bina bili, bato bakama bakokanaki ma wango echoko yango wango abèki chu mboli n’èdiba. 22 Mokomandi a ndako ichambela, kombo a wango Jaïrus ayakaki ondo; o wango ayènèki Jésus, wango akuchamaki o makolo ma wango, 23 ayongaki wango kot’èyongele, alobaki bwe: ”Mwan’a mwatò a nga adi o cha nchimbo. Yukiè, oyaka mabòkò ikolo na wango, mòchi wango anye dyòkò.” 24 Na Jésus akambizaki moto wango, na bato bakama bakambizaki wango, badumbaki wango o bibati bichò. 25 Mwatò abèki o enongo yango, wango abèki na bokono ba malongo, bwango bobikaki na wango baphela dyomu na babale. 26 Wango achèbèki ichèbo ikama na badyokotolo n’awutaki beka ba wango bichò, ko wango abobela ka, ko bokono bolekaki bokuli. 27 O wango awokaki mawò mango bato bachakolaki tonga na Jésus, wango ayakaki o chima wango o ch’èbuliki a bato, akulanaki n’iphuta a wango, 28 alobaki bwe: ”Mo nga kulane nyò na bilamba ba wango nga tabela.” 29 Echoko yango ebèphuchwane malongo ewelelaki dyolo na wango ayebaki o nchoto a wango bwe, wango abibela o bokono ba wango. 30 Na Jésus akonyaki dyolo tonga wango ayebaki nguli elangwaki ma wango, achekwaki o ch’èbuliki a bato, ayangaki bwe: ”Ekulanaki na bilamba ba nga nda?” 31 Bayekoli ba wango balobaki na wango bwe: ”K’òyènè bato badumbe kò o bibati bichò, na k’òyange bwe, Ekulanaki na nga nda?” 32 Na Jésus atòkòlòki o binongo bichò, tonga n’iyènè koncha wango ekielaki kobona. 33 Ko mwatò atilaki n’awataki, tonga wango ayebaki ekielele yango etaki na wango, na wango abandamaki kbamu, akuchamaki o bocho ba wango, achakolaki wango nènè echò. 34 Komoyango Jésus alobaki na wango bwe: ”Mwan’a mwatò a nga, echingane a kò iphakola kò, kiè na phi, k’ubela, k’uphinchwiba o ch’ichèbo a kò.” 35 Okomo bango babalobe, bana bato ba ndako a mokomandi a ndako ichambela, bayakaki, balobaki bwe: Mwana mwatò a kò achil’òwe, tika ònyòkòlò Mokuba dyòkò ka. 36 Ko o Jésus awokaki mawò mango, wango alobaki na mokomandi a ndako ichambela bwe: ”Tòtilake, chingane phencha.” 37 Wango abochimita bwe, moto akbwi alòndò wango ka, ko Pierre, Jacques na Jean, mwanyango a bole a Jacque. 38 O bango bapholaki a ndako a mokomandi a ndako ichambela, wango ayènèki ebuliki a bato ondo, yango elelaki mokala, n’ètokielaki yokela ekama. 39 Wango akolaki o ndako alobaki na bango bwe: ”Beni bokiele mokala na bolele mbekende? Mwan’a mwatò adi owa ka, wango adi o bilò.” 40 Bango badyèkèki wango. Ko wango abengaki bango bachò, ewulaki chango na nyango a mwan’a mwatò na bakoncha bango balòndòki wango phencha, bango bakolaki echoko ebèki mwan’a mwatò. 41 Na wango aphilaki ebòkò a mwan’a mwatò, alobaki bwe: ”Talitha koumi, motwatwa: Mwan’a mwatò, nga lobe na kò bwe: Tèmè chu!” 42 Na man’a mwatò atèmèki chu dyolo, aphotaki botambole; wango abèki baphela dyomu na babale, na bango batondaki n’ichimo ikama dyolo. 43 Ko wango atindaki bango kot’ètindele bwe, tika moto nyò mò adyale oyeba ekielele yango ekielibaki ka. Chima wango atindaki bango bwe, aphè mwan’a mwatò bekidya. |
Published in 1947, by Örebromissionen, now part of the Evangelical Free Church of Sweden (Evangeliska Frikyrkan).
British & Foreign Bible Society