Timoteo 1 1 - Mbengu Etemu Mabandela Nzembo Bantete 19161 Paulo, ntom’embe Masiya Yesu ete nde mosikiso mombe Nyamb’e Mokosoli o biso na Masiya Yesu ’eliki’e biso, 2 ombe Timoteo e mwan’o ngai o longobanu sub’o boyambi: Ngolu, molika, nyil’e bokumak’ombe Nyamb’e Sango na Masiya Yesu e Mokonzi o biso. 3 E keki ngai o Makedonia nakopekeli ete obika bw’o Epeso, na ntin’ete osikisa baoko ete bazala nde o teya liteyo lisiso ka, 4 mpe bazala nde o kengele bice mpe na bisekisela bi mabota bikosenga bosuku ka, mango manya matikokatisa miloboto yenyelu na bokengeli kum’ombe Nyambe bonga sub’o boyambi. 5 Nde bosuku bo mosikiso bonga bolingo kum’o moloko mo mpwe na lososoloko lolamu na boyambi bokosenga londelengi. 6 Nde baoko baoleka su o mango mpe baopengwa yek’o bilobaloba bozalaka na mpos’e zala bateyi ba mobeko, 7 nde banga nde o yeba ntin’e ma koloba bango ka, mpe na ntin’e ma wani ma kokendisa bango no‐no ka. 8 Nde lokoyeb’ete mobeko monga zeni ndiki moto abaka mongo na bolongobani, 9 boyebaka liy’ete mobeko monga nde o ketibwa n’ewel’e moyengebeni ka, nde n’ewel’e bamingi na batei, bakinoli ba Nyambe na basoki, ba bompunda na babebi, biboma‐basango na biboma‐banyango, 10 biboma‐bato, bapeki, ba bosodomo, biyiba‐bato, bakutinyi, basimbi ba ndai li nkuta, mpe ndiki enga zambi lisiso likotem’esongo na liteyo li nki‐nki, 11 ete nde ncango ndamu li mankembo mambe Nyamb’e Momen’esengo lisembwibwi ombe ngai. 12 Nakotondo Moyisisi o ngai, Masiya Yesu e Mokonzi o biso, nowel’ancekisi mobaki mpe antukisi yek’o bolengeleli, 13 ncoki ngai nazalaki yambo moyemboli, mpe monyokoli, mpe mosumbisi. Nde nayambi molika nowela nakeli na bosenga bo bososoli sub’o bosenga bo boyambi, 14 mpe ngolu embe o Mokonzi o biso etikobula mputa na boyambi na bolingo bonga sub’ombe Masiya Yesu. 15 Liloba liye linga li bobakaka mpe bokomoko na bonyangeli na bato banco ete, “Masiya Yesu ayi yek’o molongo nokosola basoki,” ba nga ngai mpomba. 16 Nde n’ewel’eye nayambi molika na ntin’ete sub’ombe ngai o mpomba Yesu Masiya alakinya mpiko encoki e Yey’e mambi boyiki ete ndakis’ombe bango banga lende nomoyambela yek’o bomoi bo lobiko. 17 Ombe o Mokonzi o lobiko, o losumbanako bosengaka, o lobononoko bosengaka, Nyamb’e mpenza, ezala bosoni na mankembo yek’o lobiko‐a‐lobiko; se bongo. 18 Nakosembola mosikiso moye ombe yo, mwana Timoteo, s’et’ebëkibwi mambi yambo na ntin’e yo, na ntin’ete na mang’oman’etumb’e 19 zeni bozalaka na boyambi mpe na lososoloko lolamu; mango baoko baomasabola mpe baobunyibwa bwengo na ntin’e boyambi. 20 Ombe bango enga Umenayo, n’Alesandulo, ba semboli ngai ombe Satana na ntin’ete bateyibwa nozala nde o yembola ka. |
Published by the Baptist Missionary Society 1905-1916.
British & Foreign Bible Society