Limbe Yuda 1 - Mbengu Etemu Mabandela Nzembo Bantete 19161 Yuda, mosali ombe Yesu Masiya, mpe o molimi ombe Yakobo, ombe babiangibwaki, ba bolingo sub’ombe Nyamb’e Sango, mpe bakengibwaki ombe Yesu Masiya: 2 Molika, na nyile, na bolingo mabulibwak’ombe bino. 3 Ba bolingo, nani e sokotani ngai bosokotanaka nobosonele na ntin’e likoswa li biso li bosangelaka, naliki kelelu nobosonele bopekelek’ete bokasakasaka nguya na ntin’e boyambi bosembwibwi ombe babulamaki bobele‐bobele. 4 Nowel’enga bato baoko, boweleke wa‐wa, basonibwi yambo yek’o motendeko moye, bakinoli ba Nyambe, ngolu embe Nyamb’e biso boyenzaka yek’o bosalangani bo bongondo, mpe Nkolo e mpenza na Mokonzi o biso Yesu Masiya botonaka. 5 Nde nakokana noboyebwisa, ncoki bino boosila noyeba manco polele, ete o Mokonzi akosoli likongo kum’o nc’’Ezipeto, mpe na mbis’asinisi ekamb’eliki nde o yamba ka. 6 Mpe ntoma li likolo liliki nde o kengele bokongi bo bangome ka, nde batiki ezali e bangome, aobakengele o mikango mi lobiko soke na mongindandalo yek’o botendi bo busa bone. 7 Bongo mpe Sodomo n’Amola na bituka zo‐zo na bingo, se lolimo loko na banya basalangani nobaka bopeki, mpe bopengwaka sei bizalibwi bi lolenge losiso botomboko, bikosembwibwa co s’enueti, likamba li meya mi lobiko bokambaka. 8 Ebuleke, se lolimo loko, baye mpe bolotoko maloto bakosumbisa nzoto, mpe bakoboya bonkolo, mpe bakoyembola ba kā. 9 Nde Mikaele mi ntom’e mpomba, e boki yeye mambi na Satana, bowelaka na ntin’e nzoto li Mose, aliki nde o kasangana nomobanzisa motendeko mo boyembolaka ka, nde alobi ete, “Yawe akokasa.” 10 Nde baye bakoyembola ma wani ma nga nde bang’o yeba ka; mpe ma wani ma koyeba bango ntina kum’o momboto mo bango, ete bibwele bikosenga bokanisi, sub’o manya bakosumbibwa. 11 Libiu ombe bango! nowela batamboli o nzel’embe Kaina, mpe babwaki nzot’o mopengo mombe Bilama mo mbemba, mpe o elobel’e ngendo embe Kola basinani. 12 Baye ozala mabwa manga pot’o bilambo bi bino bi bolingo bango boleke mputa na bino bio‐bio, nzoto bokengeleke na bosenga bo bōngo; mapata ma mai bosengaka, botetwibwaka na mimpe; miete mi eseu mi mbolo bosengaka, miowa mbwa libale, mi bobilwibwaka nkanga; 13 mbonge li libeke li bokanzaka, mpulu li nconi li lingome bolabolaka; mioto mi bonyenganaka mi okengibwela mongindandalo mo liti yek’o lobiko. 14 Ombe baye mpe Anoka, o ncambo kum’ombe Adama, abeki bolobak’ete, “Bakeka, Yawe ayi na mampinga ma babulamaki ba Yeye notende botendi ombe banco, 15 mpe nolomola bakinoli banco ba Nyambe na ntin’e nkinola linco li okinola bango Nyambe, mpe na ntin’e makoti manco ma lobi basoki ba Nyambe bokinolak’esongo na Yeye.” 16 Baye banga babokosoni, batiyabani, batamboli ete nde mipoibano mi bango (mpe miunya mi bango mikoloba mambi mane ma bipali), mobonono mo bato bosimitaka n’etondo e litomba. 17 Nde bino, ba bolingo, boyindolaka mambi malobibwi yambo 18 na ntoma limbe Mokonzi o biso Yesu Masiya et’e bolobelaki bango ete, “O elemb’e mbisa kuku eközala bakengoli botambolak’ete nde mipoibano mi bango mi Nyambe bokinoli. 19 Baye banga basominyi, ba bonce, na Molimo bozalaka ka. 20 Nde bino, ba bolingo, nzoto botongaka sik’o boyambi bo bino bo ebali bule, bobondelaka sub’ombe Molimo mopetwaki, bokengeleke nzoto nozala sub’o bolingo bombe Nyambe, 21 molika mombe Mokonzi o biso Yesu Masiya bolambaka yek’o bomoi bo lobiko. 22 Mpe baoko bakokamakama bobayokelaka molika, mpe baoko bobakosolaka boyosolok’o meya, 23 mpe baoko bobayokelaka molika sub’o bōngo, elamb’eyambi bipete kum’o nzoto boyinaka. 24 Ombe Yeye okoyisa nobobatela na bosenga bo bokiti, mpe nobotemisa sik’o miso ma mankembo ma Yeye na bosenga bo biyu se bongalumaka, 25 ombe Nyamb’e mpenz’e Mokosoli o biso ezalaka bozalaka na Yesu Masiya e Mokonzi o biso mankembo, bone, lingolo na monkandi, o yambo ’elemb’enco, mpe sik’awa, mpe yek’o lobiko lonco; se bongo. |
Published by the Baptist Missionary Society 1905-1916.
British & Foreign Bible Society