Online Bible

- Reklamy -

Masese 9 - Mokanda na Bomoi


Feti ya Bwanya

1 Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo ;

2 abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa.

3 Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba :

4 « Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :

5 « Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,

6 botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »

7 Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.

8 Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.

9 Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.

10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

11 Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.

12 Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko ; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.


Feti ya liboma

13 Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,

14 avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,

15 mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.

16 Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa ! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli :

17 « Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »

18 Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
Následuj nás:



Reklamy